Ezala Bongo (Libondeli)

Artist: Congress MusicFactory
Produced By: Congress MusicFactory
Album: Tonetoli Yo

Amen elingi koloba esalema bongo. Esalema bobelo bongo. Amen …
Totomboli maboko epayi na Yo pe topamboli Yo. Topesi Yo lokumu.
Tonetoli Yo. Totelemi liboso ya bojalisami na Yo pe topamboli Yo.
Totondi Yo po oza Nzambe malamu pe Nkolo ya Sembo, Ye oyo atambuisa biso wuta mibu na mibu, Ye oyo atambuisa biso tamgo nyoso na nzela ya semba, pe amemi biso mosika na mambi ya lisakoli. Topamboli Nkombo na Yo.
Pesa biso mpifo ya makasi lisusu po tokokisa mokano na Yo.
Pesa biso makasi na kati ya bikolo ya mokili oyo.
Pesa biso bokonzi ezanga ndelo po tokumisa Yo, po tomemya Yo, totombola Yo, pe bato nyoso bayeba ete ozali Nzambe ya Lola, Nkumu ya nyoso, pe mokeli ya bato nyoso.
Bato nyoso bayeba nani Yo ozali, pe bayeba lolenge nini oza monene, lolenge nini oza Bonzenga pe Kitoko. Pesa biso ngolu natina ete togumbamela Yo pe totombola Yo. To sanjola Yo na nyoso oyo tozo sala