Nkolo Ye Oyo

Artist: Congress MusicFactory
Produced By: Congress MusicFactory
Album: Tonetoli Yo

[verse 1] (mibali)
Nkolo Ye oyo na ngwende na Ye
Mokonzi ya bakonzi, Nkolo ya ba nkolo
Po ete bokonzi na ye ezali ya seko
Nguya pe lokumu na Ye ewumela

(banso)
Ye oyo az’okonza po na libela
Atonda na nkembo, Ye oyo toz’ogumbamela
Seko na seko obongwanaka te
Oyo azalaki, azali pe akoya

[chorus] Tonetoli Yo
Moko te aza liboso na Yo
Topesi Yo nkembo, Nkombo na Yo esantu epambolama
Nakomona nkembo na Yo
Basantu na Yo elongo
Babonzeli Yo masanjoli oyo eleki nyoso

[Verse 2] Ye oyo Mwana na Mpate, Mwana na Nzambe
Mokonzi, Molongi pe Nkolo na nyoso
Beta kelelo na Yo, sambisa bikolo
Bato bayeba oyo aleki na nguya az’okonza

[chorus] Tonetoli Yo
Moko te aza liboso na Yo
Topesi Yo nkembo, Nkombo na Yo esantu epambolama
Nakomona nkembo na Yo
Basantu na Yo elongo
Babonzeli Yo masanjoli oyo eleki nyoso

[chorus] Tonetoli Yo
Moko te aza liboso na Yo
Topesi Yo nkembo, Nkombo na Yo esantu epambolama
Nakomona nkembo na Yo
Basantu na Yo elongo
Babonzeli Yo masanjoli oyo eleki nyoso
Babonzeli Yo masanjoli oyo eleki nyoso